Loboko Nayo Mosungi

Loboko Nayo Mosungi

By Rv. Rodin NgandoReligion & Spirituality
Download on the App Store

Loboko Nayo Mosungi episodes

  • Ntango Bandimi ba Bondelaka Elongo

    Ntango bandimi ba bondelaka elongo, nguya ezali kati na bango. Na mokanda ya MISALA 1:12-14  mpe na MATAYO 18:19-20
    Makomi mazali komonisa biso nguya ya mabondeli soki tozali lisanga . Ezali biso koluka lisungi ya Nzambe kati na mabondeli , to yeba ete 
     kati na Yesu Masiya nde tokoki kojua biyano soki to tamboli kati na mokano na Nzambe . mpe na botosi ya mibeko na ye. 

    1 hr 43 min
  • Lisese ya Batongi Ndako Mibale.

    Na kati ya bomoi ya bandimi, tozali na ba Groupe mibale. Baoyo bakendaka na losambo mpe bayokaka mateya , kasi basalaka eloko te na yango. Mpe baoyo bakendaka na losambo mpe na nsima batiaka maloba wana na misala. Na yango motuna mozali boye : Groupe nini oyo yo ozali.

    Yake 2:14-26 " Bandeko na ngai, Tina nini ezali na moto koloba ete azali na kondima , soki azali kolakisa misala na yango te? Kondima ya boye ekoki solo kobikisa ye? Ndakisa; ndenge nzoto oyo ezangi mpema ezali ya kokufa , ndenge moko mpe kondima oyo ezangi misala ezali ya kokufa."

    37 min

About Loboko Nayo Mosungi

From the publisher's feed

Kopalanganisa nsango malamu na bosolo, mpo ete ekoki kokoma bisika nyonso na mokili. Nakolongola to nakobakisa maloba te oyo euti na bible ezala bobele lolenge ekomami.